Immigration law / Mobeko ya bapaya
Ozali na mokili ya Falansa na mikanda ya malamu te, vanda kozela te, bongisa likambo na yo.
If you are on French territory without valid documents, do not wait—regularize your situation.
Biro esalisaka bino na kobongisa dosiye na bino, kozwa bokutani, kokotisa likambo na matribinale mpo dosiye na bino ekanga mpe mpo na kotɛmɛla bikateli oyo ezali mabe mpo na bino.
The firm assists you in preparing your file, making appointments, and submitting cases to the courts to have your file processed and to challenge decisions that are unfavorable to you.
Osengaki kalati ya kovanda ya mosali to ya bomoi ya moto mpe ya libota, mpe Prefekitiri ewangi yango, ozali na lotomo ya kotɛmɛla likateli yango.
OQTF (etinda ya kolongwa na mokili ya Falansa).
If you have applied for a work permit or a residence permit for private and family life and the Prefecture refuses it, you have the right to contest the decision.
Ozwi sika OQTF (etinda ya kolongwa na mokili ya Falansa), biro esalisi bino liboso ya matribinale nyonso ya bokonzi ya Falansa.
If you have just received an OQTF (Obligation to Leave French Territory), the firm will assist you before all administrative courts in France.
Ntango ezali kobongwana uta 48h tii mikolo 15.
Ozwi mpe IRTF (kopekisama ya kozonga na mokili ya Falansa).
The deadlines vary from 48 hours to 15 days. You may also have received an IRTF (Prohibition from Returning to French Territory).
Benga biso noki koleka ekoki ; tokoya kobatela bino ; ntango ya kotɛmɛla ezali mbala mingi ngonga 48, boye sala noki.
Contact us as soon as possible; we will act to defend you. Contestation deadlines are often 48 hours, so act quickly.